Makila

1- Nani akoki 
Kofunda nga !
Moponami na Yesu !
Muana Mpate afuta 
Niongo na nga 
Motuya mibalé!
Masumu na nga 
Amema yango! 
Akomisa nga peto !
Tango na bolembu 
Na ko kweya ! 
Ngolu etelemisaka nga !

Choeur : (bis)
Nga na tondi Yo ! 
Po na Bolingo na Yo !
Otiki Nkembo oyé 
Kosikola nga  !

2- Makila na Yo 
Epetola nga!
Wuta liboso mokilo oyo 
Ezalisama !
(Yango na yembi, 
Ngolu na Yesu ! 
Po ete Mosantu 
Alobi ete nazali bulé!) (bis)

Choeur : (bis)
Nga na tondi Yo ! 
Po na Bolingo na Yo !
Otiki Nkembo oyé 
Kosikola nga  !

3- Tango moyini 
Akofunda nga 
(Epayi ya Tata),
Po na masumu na salaki! 
(Ebele pe motané!)
Pe ako yebisa Ye 
(Apesa etumbu!)
Kasi Tata akotala nga!

Choeur :
Na se ya Makila 
Amoni nga yi peto!
Na se ya Makila, 
Nanu na sumuka te eh!
Na se ya Makila 
Amoni ngai peto!
Na se ya Makila, 
Nanu na sumuka te eh!
Yango esengo 
Na nga emati!

4- Po na mobeko,
Na bongaki 
Na etumbu ya liwa!
Po na mabé na nga 
Nyonso oh!
Ngolu epesameli nga 
Ya solo!

Choeur :
Na se ya Makila 
Amoni nga yi peto!
Na se ya Makila, 
Nanu na sumuka te eh!
Na se ya Makila 
Amoni ngai peto!
Na se ya Makila, 
Nanu na sumuka te eh!
Yango esengo 
Na nga emati!
(Oh! Oh!)
Yango esengo 
Na nga emati!
(Yoka tina 
Ya esengo na nga!)
Yango esengo 
Na nga emati!
(Yesu apesi nga
Bolimbisi 
Ya masumu eh!)
Yango esengo 
Na nga emati!
(Na komi moto 
Ya esengo 
Oyo esilka te!)
Yango esengo 
Na nga emati!
(Bomoyi na nga
Ekomi nde ya sika oh!)
Yango esengo 
Na nga emati!
(Yango esengo 
Na nga emati!)
Yango esengo 
Na nga emati!
A/C : (Fr. Enoch Mulopo)